Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo. “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.
58 Awa bofandi nyɛɛ bokoki mpenza kolobela boyengebene?+
Ee bino bana ya bato, bokoki nde kosambisa na bosembo?+
2 Kutu, na motema na bino bozali nde kosala makambo ya kozanga boyengebene na mabele,+
Mpe bozali kobongisa nzela mpo na mobulu mpenza ya mabɔkɔ na bino!+
3 Bato mabe bapɛngwi banda na libumu;+
Bayengiyengi banda na libumu;
Bazali koloba makambo ya lokuta.+
4 Ngɛngɛ na bango ezali lokola ngɛngɛ ya nyoka,+
Bakufá matoi lokola kobra oyo ekangaka litoi na yango,+
6 Ee Nzambe, buká mino na bango na monɔkɔ na bango.+
Ee Yehova, buká mikuwa ya mbanga ya bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.
7 Bányangwa, bákóma lokola mai oyo ezali kotíyola;+
Agumba litimbo mpo na makula na ye wana bazali kokwea.+
8 Azali kotambola lokola mbɛmbɛ oyo ezali kokufa;*
Bakomona mpenza moi te lokola zemi ya mwasi oyo esopani.+
9 Liboso ete banzungu na bino eyoka nsolo ya mɔtɔ ya mwa nzete ya nzubɛnzubɛ oyo epelisami,+
Akomema mwa nzete yango ya mobesu mpe oyo ezali kopela ndenge mopɛpɛ makasi ememaka.+