17 nakopambola yo solo mpe nakokómisa solo momboto na yo mingi lokola minzoto ya likoló mpe lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu;+ mpe momboto na yo akozwa porte* ya banguna na ye.+
4 Basi ya ekobo,+ boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe?+ Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga+ ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.+
9 Nzokande ntango Mikaele,+ anzelu-mokonzi,+ azalaki na matata+ ná Zabolo mpe azalaki kowelana mpo na nzoto ya Moize,+ amekaki kutu te kokweisa ye na likambo na maloba ya kofinga,+ kasi alobaki nde: “Yehova apamela yo.”+
17 Mpe dragɔ eyokelaki mwasi yango nkanda,+ mpe ekendaki kobunda etumba na bato ya momboto ya mwasi yango oyo batikalaki, oyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola+ mpo na Yesu.