Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 35:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe esalemaki boye: ntango Yisraele azalaki kofanda na bahema+ na mokili yango, Rubene akendaki kolala na Bila makango ya tata na ye, mpe Yisraele ayokaki likambo yango.+

      Bongo bana mibali ya Yakobo bazalaki zomi na mibale.

  • Ebandeli 37:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe Rubene alobaki lisusu na bango ete: “Bósopa makila te.+ Bóbwaka ye na libulu oyo ya mai, oyo ezali na esobe mpe bósala ye mabe te.”+ Mokano na ye ezalaki ya kobikisa ye na lobɔkɔ na bango mpo na kozongisa ye epai ya tata na ye.

  • Ebandeli 49:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Rubene, yo ozali mwana na ngai ya liboso,+ makasi na ngai mpe ebandeli ya nguya na ngai ya kobota,+ moto oyo aleki na lokumu mpe aleki na bokasi.

  • Kobima 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Talá bankumu ya ndako ya batata na bango: Bana mibali ya Rubene, mwana ya liboso ya Yisraele+ bango oyo: Hanoke ná Palu, Hezerone mpe Karami.+ Wana nde mabota ya Rubene.+

  • 1 Ntango 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bana ya Rubene+ mwana ya liboso ya Yisraele—mpo azalaki mwana ya liboso;+ kasi lokola akómisaki mbeto ya tata na ye eloko mpamba,+ lotomo na ye ya mwana ya liboso epesamaki na bana ya Yozefe+ mwana ya Yisraele, bongo asengelaki te kokomama nkombo na molɔngɔ ya bankɔkɔ mpo na lotomo ya mwana ya liboso.

  • Emoniseli 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na libota ya Yuda,+ bato nkóto zomi na mibale (12 000) batyamaki elembo;

      na libota ya Rubene+ bato nkóto zomi na mibale;

      na libota ya Gade+ bato nkóto zomi na mibale;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto