Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 31:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Na yango, Rashele ná Lea bazongiselaki ye maloba ete: “Ezali lisusu na ndambo ya libula mpo na biso na ndako ya tata na biso?+

  • Ebandeli 31:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Sikoyo lokola okei libela, mpo ozalaki na mposa makasi ya ndako ya tata na yo, mpo na nini kasi oyibi banzambe na ngai?”+

  • Ebandeli 35:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Yakobo alobaki na bato ya ndako na ye mpe na baoyo nyonso bazalaki elongo na ye ete: “Bólongola banzambe ya bapaya oyo bazali na kati na bino+ mpe bómipɛtola mpe bólata bilamba mosusu,+

  • Yosua 24:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Yosua alobaki na bato nyonso boye: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Na ntango ya kala, bankɔkɔ na bino,+ Tera, tata ya Abrahama mpe tata ya Nahore,+ bafandaki na ngámbo mosusu ya Ebale+ mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.

  • Ezekiele 21:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo mokonzi ya Babilone atɛlɛmaki na bisika banzela ekutani, na ebandeli ya nzela yango mibale, mpo na kosakola makambo oyo ebombaná.+ Aningisi makula. Atuni na nzela ya baterafime;+ mpe atalitali na kati ya libale.

  • Zekaria 10:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpo baterafime+ elobi makambo ya maji; mpe basakoli ya makambo oyo ebombaná, bango bamoni na bimonaneli makambo ya lokuta,+ mpe bandɔtɔ ya mpamba nde makambo oyo bazali kokoba koloba, mpe bazali komeka kobɔndisa kaka mpamba.+ Yango wana bakoyengayenga lokola bampate;+ bakomona mpasi, mpo mobateli azali te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto