18 Bongo Yuda apusanaki pene na ye mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, nkolo na ngai, nabondeli yo, tiká moombo na yo aloba liloba moko na matoi ya nkolo na ngai,+ mpe kotika te ete nkanda na yo+ engalela moombo na yo, mpamba te yo ozali lokola Farao.+
8 Na bongo, ezali bino te nde botindaki ngai awa,+ kasi ezali Nzambe ya solo, mpo atya ngai tata+ ya Farao mpe nkolo ya ndako na ye mobimba mpe moto oyo azali koyangela mokili mobimba ya Ezipito.
10 mpe asikolaki ye na malɔzi na ye nyonso mpe apesaki ye ngɔlu mpe bwanya na miso ya Farao mokonzi ya Ezipito. Mpe atyaki ye mpo na koyangela Ezipito mpe ndako na ye mobimba.+