Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 37:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe bana na ye nyonso ya mibali mpe bana na ye nyonso ya basi batɛlɛmaki mpo na kobɔndisa ye,+ kasi azalaki koboya kobɔndisama mpe azalaki koloba ete:+ “Mpo nakokita na Nkunda* na kolela mwana na ngai!” Mpe tata na ye azalaki kaka kolela ye.

  • Mitángo 16:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Kasi soki ezali nde eloko ya sika oyo Yehova akosala yango kosala,+ mpe mabele esengeli kofungola monɔkɔ na yango mpe komɛla bango+ mpe eloko nyonso ya bango mpe basengeli kokita na bomoi kati na Nkunda,*+ bokoyeba ya solo ete mibali oyo bazangi mpenza limemya epai ya Yehova.”+

  • 1 Bakonzi 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe osengeli kosala ndenge bwanya+ na yo ezali, mpe kotika te ete nsuki na ye ya mpɛmbɛ ekita na kimya+ na Nkunda.*+

  • Nzembo 49:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Lokola bampate, babongisami mpo na Nkunda;*+

      Liwa ekokamba bango;+

      Mpe bato ya makambo alima bakozala na bokonzi likoló na bango na ntɔngɔ,+

      Mpe nzoto na bango esengeli konzuluka;+

      Mokomoko azali kokende na esika ya kofanda ya lokumu te, kasi nde na Nkunda.*+

  • Nzembo 89:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 Mobali makasi nani oyo azali na bomoi mpe akomona liwa te?+

      Akoki nde kobikisa molimo na ye na lobɔkɔ ya Nkunda?*+ Sela.

  • Mosakoli 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza,+ mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te,+ bwanya mpe te+ na Nkunda,*+ esika ozali kokende.+

  • Hosea 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Nkunda;*+ nakobikisa bango na liwa.+ Ee Liwa, wapi bitubeli na yo?+ Ee Nkunda,* wapi nguya na yo ya kobebisa?+ Nakomonisa motema mawa te.+

  • Misala 2:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 mpo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te, okopesa mpe nzela te ete moto na yo ya sembo apɔla.+

  • Emoniseli 20:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi+ oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto