Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Osengeli koboma moto te.+

  • Mitángo 35:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bingumba yango esengeli kozala ekimelo mpo na bino liboso ya mozongisi mabe+ mpo na makila, mpo mobomi-moto akufa te tii akotɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosambisama.+

  • Mitángo 35:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “‘Moto nyonso oyo abomi molimo akobomama lokola mobomi-moto+ na maloba ya monɔkɔ ya batatoli,+ mpe motatoli kaka moko akoki kotatola te mpo na kofunda molimo moko mpo akufa.

  • Kolimbola Mibeko 19:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo soki asali bongo te, mozongisi mabe+ mpo na makila, lokola motema na ye ezali mɔtɔmɔtɔ, akoki kolanda mobomi-moto yango mpe kozwa mpenza ye, mpo nzela ezali molai; mpe akoki mpenza koboma molimo na ye, nzokande bakateli ye etumbu ya liwa+ te, mpo azalaki koyina ye liboso te.

  • 2 Samwele 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 bongo ekozala boni ntango bato mabe+ mpenza babomi moyengebene na kati ya ndako na ye moko na mbeto na ye? Sikoyo, nasengeli nde kosɛnga makila na ye na mabɔkɔ na bino te,+ mpe nasengeli nde kolongola bino na mokili te?”+

  • Matai 24:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Bongo elembo ya Mwana ya moto+ ekomonana na likoló, mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta na kolela,+ mpe bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi.+

  • Emoniseli 21:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bato ya bibangabanga ná baoyo bazangi kondima+ ná baoyo bazali na bosɔtɔ mpe na mbindo+ ná babomi-bato+ ná bato ya pite+ ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná basambeli ya bikeko+ ná bato nyonso ya lokuta,+ likabo na bango ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ+ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto