Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Sikoyo Yehova abimelaki Abrama mpe alobaki ete: “Nakopesa momboto na yo+ mokili oyo.”+ Nsima na yango, atongaki etumbelo kuna mpo na Yehova, oyo abimelaki ye.

  • Ebandeli 15:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe andimelaki Yehova;+ mpe Nzambe atángaki ye moyengebene.+

  • Ebandeli 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bakobenga yo lisusu te na nkombo Abrama, kasi nkombo na yo ekozala nde Abrahama, mpamba te nakokómisa yo tata ya ebele ya bikólo.

  • Ebandeli 18:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpamba te nayebani na ye mpo apesa mitindo na bana na ye mpe na bato ya ndako na ye, oyo bakoya nsima na ye, ete bákoba kobatela nzela ya Yehova mpo na kosala boyengebene mpe bosembo;+ mpo ete Yehova akoyeisela Abrahama, oyo ye alobaki na ntina na ye.”+

  • Yoane 8:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Bazongiselaki ye ete: “Tata na biso ezali Abrahama.”+ Yesu alobaki na bango ete: “Soki bozali bana ya Abrahama,+ bósala misala ya Abrahama.

  • Baroma 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe azwaki elembo,+ elingi koloba, akatamaki ngenga, yango ezalaki elembeteli ya boyengebene na ye na kondima oyo azalaki na yango na ntango akatamaki naino ngenga te, mpo akóma tata+ ya bato nyonso oyo bazali na kondima+ atako bakatamaki ngenga te, mpo bátánga bango bayengebene;

  • Bagalatia 3:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nzokande bilaka yango, bayebisaki yango Abrahama+ mpe momboto na ye.+ Elobi te ete: “Mpe epai ya mboto,” lokola nde ezalaki mingi, kasi nde epai ya moko kaka+ ete: “Mpe epai ya momboto na yo,”+ oyo ezali Kristo.+

  • Baebre 11:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na kondima Abrahama, ntango amekamaki,+ tokoki koloba ete akabaki Yisaka mbeka, mpe moto wana oyo azwaki bilaka na esengo alingaki kokaba mbeka mwana na ye se moko oyo abotamaki,+

  • Yakobo 2:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe likomami ekokisamaki oyo elobi ete: “Abrahama andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene,”+ mpe akómaki kobengama “moninga ya Yehova.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto