Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 mpe nakosala ete ekólo moko monene euta na yo mpe nakopambola yo mpe nakokómisa nkombo na yo monene; mpe zalá mpenza lipamboli.+

  • Ebandeli 15:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo abimisaki ye libándá mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, talá na likoló mpe tángá minzoto, soki okokoka mpenza kotánga yango.”+ Mpe alobaki na ye lisusu ete: “Momboto na yo ekokóma kaka bongo.”+

  • Kobima 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bana ya Yisraele bazalaki kobota mpe babandaki kotondana; mpe bazalaki kaka kokóma mingi mpe kokóma makasi mingi koleka na ndenge moko ya kokamwa mpenza, bongo mokili yango etondaki na bango.+

  • Kolimbola Mibeko 26:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe osengeli kozongisa maloba liboso ya Yehova Nzambe na yo ete: ‘Tata na ngai azalaki moto ya Siri oyo azalaki pene na kokufa;+ mpe akitaki na Ezipito+ mpe afandaki kuna mopaya elongo na bato moke mpenza;+ kasi kuna akómaki ekólo moko monene, ya nguya mpe ya bato ebele.+

  • Baebre 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana mpe na moto kaka moko+—mpe oyo tokoki koloba ete azalaki mokufi+—bana babotamaki ebele lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlo oyo ezalaka pembeni ya mbu, bakokaki kotángama te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto