Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 30:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpo soki bozongeli+ Yehova, baoyo bakangaki bandeko na bino mpe bana na bino bakoyokela bango mawa,+ mpe bakopesa bango nzela ya kozonga na mokili oyo;+ mpo Yehova Nzambe na bino azali na ngɔlu+ mpe na motema mawa,+ mpe akobombela bino elongi na ye te, soki bozongeli ye.”+

  • Nehemia 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo baboyaki koyoka,+ mpe bakanisaki+ te misala na yo ya kokamwa oyo osalelaki bango, kasi bakómisaki motó na bango makasi+ mpe batyaki mokonzi+ mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito. Kasi yo ozali Nzambe ya bolimbisi,+ ya ngɔlu+ mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda+ noki te mpe otondi+ na motema boboto, mpe otikaki bango te.+

  • Yoele 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpe bópasola mitema+ na bino, kasi bilamba na bino te;+ mpe bózongela Yehova Nzambe na bino, mpamba te azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+ ayokaka nkanda noki te+ mpe azali na motema boboto mingi,+ mpe akoyoka mpenza mawa mpo na mpasi yango.+

  • Luka 6:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.+

  • Baebre 8:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpo nakomonisa motema mawa na misala na bango ya kozanga boyengebene, mpe nakokanisa lisusu masumu+ na bango te.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto