12 Bongo, mana etikaki kokwea na mokolo oyo elandaki, ntango balyaki mwa biloko ya mokili yango, mpe mana emonanaki lisusu te mpo na bana ya Yisraele,+ mpe babandaki kolya mwa biloko oyo ezalaki kobima na mokili ya Kanana na mbula wana.+
15 Mpe opesaki bango mampa uta na likoló mpo na nzala na bango,+ mpe obimiselaki bango mai na libanga mpo na mposa na bango ya mai,+ mpe olobaki na bango lisusu ete bákɔta+ mpe bázwa mokili oyo otombolaki lobɔkɔ na yo mpe olapaki ndai ete okopesa bango.+