16 Lisusu, fɛti ya kobuka mbuma ya liboso oyo eteli+ ya misala na yo ya makasi, ya biloko oyo olonaki na elanga;+ mpe fɛti ya koyanganisa mbuma na nsuka ya mbula, ntango okoyanganisa mbuma ya misala na yo ya makasi na elanga.+
12 “‘Mpe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya nsambo,+ bokosala liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te,+ mpe bosengeli kosala fɛti mpo na Yehova mikolo nsambo.+
13 “Mikolo nsambo, okosala fɛti ya mwa bandako ya matiti+ ntango okoyanganisa mbuma ya esika na yo ya kotutatuta mbuma mpe ya ekamwelo na yo ya mafuta mpe ya vinyo.
4 Na nsima basalaki fɛti ya mwa bandako ya matiti+ na kolanda oyo ekomamá,+ bapesaki mpe bambeka ya kotumba mokolo na mokolo na kolanda motángo oyo esɛngamaki na mobeko mokolo na mokolo.+
14 Bongo bamonaki ete ekomamá na mobeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize+ ete bana ya Yisraele basengeli kofanda na mwa bandako ya matiti+ na fɛti ya sanza ya nsambo,+