Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 146:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ye oyo akataka likambo mpo na bato oyo bato bazali kobuba,+

      Ye oyo apesaka limpa na bato oyo bazali na nzala.+

      Yehova afungolaka baoyo bakangami.+

  • Yisaya 61:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai,+ mpo Yehova atye ngai mafuta+ mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+ Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,+ nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami+ mpe nafungola polele miso ya bato ya bolɔkɔ;+

  • Yisaya 63:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpo mokolo ya kozongisa mabe ezali na motema na ngai,+ mpe mbula ya basikolami na ngai ekómi.

  • Yirimia 34:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Liloba oyo eyelaki Yirimia uta na Yehova nsima wana Mokonzi Zidikiya asalaki kondimana ná bato nyonso oyo bazalaki na Yerusaleme mpo na kosakwela bango bonsomi,+

  • Luka 4:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Elimo ya Yehova+ ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi,+

  • Baroma 8:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 ete biloko oyo ezalisamá+ ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi+ ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto