Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 31:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 noki moto amɛla mpe abosana mobeko oyo epesami mpe abulunganisa likambo ya moko ya bana oyo bazali komona mpasi.+

  • Yisaya 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ná baoyo mpe—mpo na vinyo babungi nzela mpe mpo na masanga oyo elangwisaka batelengani. Nganga-nzambe mpe mosakoli+—babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka, babulungani mpo na vinyo, batelengani+ mpo na masanga oyo elangwisaka; babungi nzela na bimonaneli na bango, bazwi kizunguzungu mpe bayebi ekateli te.

  • Ezekiele 44:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe nganga-nzambe ata moko te akomɛla vinyo ntango azali kokɔta na lopango ya kati.+

  • Hosea 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Pite, vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko oyo elongolaka makanisi* ya malamu.+

  • Baefese 5:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Lisusu, bólangwaka+ vinyo te, mpo bomoi ya mbindo ezali na kati na yango,+ kasi bókoba kotonda na elimo,+

  • 1 Timote 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te,+ abɛtaka bato te,+ moto ya makambo makasimakasi te,+ moto oyo alingá bitumba te,+ moto oyo alingá mbongo te,+

  • 1 Timote 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Basaleli na misala+ mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, bato ya minɔkɔ mibale te, bato oyo bamipesá na vinyo te, bázala te bato ya lokoso oyo balukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+

  • Tito 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami te+ mpo azali kapita+ ya Nzambe, azala matoi mangbongi te,+ asilikaka mpambampamba te,+ molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te,+ abɛtaka bato te,+ azala te moto ya lokoso oyo alukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto