11 Mpe yango esengeli kobomama pembeni ya etumbelo na nɔrdi, liboso ya Yehova, mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli komwangisa makila na yango zingazinga, likoló ya etumbelo.+
4 Mpe asengeli komema ngɔmbɛ-mobali yango na monɔkɔ ya hema ya kokutana+ liboso ya Yehova mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya ngɔmbɛ-mobali yango,+ mpe asengeli koboma ngɔmbɛ-mobali yango liboso ya Yehova.
25 “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali: ‘Talá mobeko ya likabo mpo na lisumu:+ Likabo mpo na lisumu ekobomama liboso ya Yehova na esika+ oyo likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso. Ezali eloko moko oyo eleki bosantu.+