Ebandeli 9:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Kaka nde bosengeli kolya+ mosuni ná molimo na yango te,+ elingi koloba makila na yango.+ Balevi 3:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 “‘Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika na bino nyonso ya kofanda: bosengeli kolya mafuta ata moke te to makila+ ata moke te.’” Balevi 7:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 “‘Mpe bosengeli te kolya makila+ ya lolenge nyonso, ezala ya ndɛkɛ to ya nyama, na bisika nyonso oyo bozali kofanda. Balevi 19:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 “‘Bosengeli kolya eloko moko te na makila.+ “‘Bosengeli te koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bosengeli te kosala misala ya maji.+ Kolimbola Mibeko 12:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Kaka makila nde bosengeli kolya te.+ Okosopa yango na mabele lokola mai.+ 1 Samwele 14:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya biloko ná makila.”+ Na yango ye alobaki boye: “Bosali na bosembo te. Bóbalusa naino libanga moko ya monene awa epai na ngai.” Misala 15:29 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 29 bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko+ mpe makila+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe pite.+ Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana,+ bokozala malamu. Bótikala malamu!”
17 “‘Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino, na bisika na bino nyonso ya kofanda: bosengeli kolya mafuta ata moke te to makila+ ata moke te.’”
26 “‘Mpe bosengeli te kolya makila+ ya lolenge nyonso, ezala ya ndɛkɛ to ya nyama, na bisika nyonso oyo bozali kofanda.
26 “‘Bosengeli kolya eloko moko te na makila.+ “‘Bosengeli te koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bosengeli te kosala misala ya maji.+
33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya biloko ná makila.”+ Na yango ye alobaki boye: “Bosali na bosembo te. Bóbalusa naino libanga moko ya monene awa epai na ngai.”
29 bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko+ mpe makila+ mpe banyama oyo ekamolamá*+ mpe pite.+ Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana,+ bokozala malamu. Bótikala malamu!”