3 “‘Soki likabo na ye ezali likabo ya kotumba+ oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ, akopesa nyama ya mobali oyo ezangi mbeba.+ Akopesa yango ndenge ye alingi na monɔkɔ ya hema ya kokutana liboso ya Yehova.+
25 “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali: ‘Talá mobeko ya likabo mpo na lisumu:+ Likabo mpo na lisumu ekobomama liboso ya Yehova na esika+ oyo likabo ya kotumba ebomamaka ntango nyonso. Ezali eloko moko oyo eleki bosantu.+