5 Mpe sikoyo soki bokotosa+ mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai,+ bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso,+ mpo mabele mobimba ezali ya ngai.+
16 Mpe ndenge nini ekoyebana sikoyo ete nandimami na miso na yo, ngai ná bato na yo? Ezali te ndenge okotambola elongo na biso+ nde ekosala ete ngai ná bato na yo tókesana na bato mosusu nyonso oyo bazali na mabele?”+
53 Mpo yo moko nde okabolaki bango na bato ya bikólo nyonso ya mabele mpo bázala libula na yo,+ ndenge olobaki na nzela ya Moize+ mosaleli na yo ntango obimisaki bankɔkɔ na biso na Ezipito, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
16 Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?+ Mpo biso tozali tempelo+ ya Nzambe ya bomoi; kaka ndenge Nzambe alobaki ete: “Nakofanda na kati na bango+ mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”+
9 Kasi bino bozali “libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu,+ bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza,+ mpo bósakola bizaleli malamu”+ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.+