Kobima 28:36 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 36 “Mpe osengeli kosala linzanza ya kongɛnga ya wolo ya pɛto mpe kokata makomi likoló na yango ndenge ezalaka na kashɛ: ‘Bosantu ezali ya Yehova.’+ Balevi 11:45 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 45 Mpo ngai Yehova moto nazali kobimisa bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino;+ mpe bosengeli kozala basantu,+ mpamba te ngai nazali mosantu.+ Balevi 20:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 “‘Mpe bosengeli komisantisa mpe kozala basantu,+ mpamba te ngai nazali Yehova Nzambe na bino. Yisaya 43:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Nazali Yehova Mosantu na bino,+ Mozalisi ya Yisraele,+ Mokonzi na bino.”+
36 “Mpe osengeli kosala linzanza ya kongɛnga ya wolo ya pɛto mpe kokata makomi likoló na yango ndenge ezalaka na kashɛ: ‘Bosantu ezali ya Yehova.’+
45 Mpo ngai Yehova moto nazali kobimisa bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino;+ mpe bosengeli kozala basantu,+ mpamba te ngai nazali mosantu.+