29 Na esobe oyo, bibembe na bino ekolala,+ ɛɛ, bato nyonso na bino oyo bakomisamaki nkombo na motángo na bino, banda na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló, bino baoyo boimaimaki mpo na ngai.+
14 Mpe mikolo oyo totambolaki longwa na Kadeshe-barnea kino tokatisaki lobwaku ya mokɛli ya Zerede ezalaki mbula ntuku misato na mwambe (38), kino mibali nyonso ya etumba ya ntango wana basilaki na kaa, kaka ndenge Yehova alapelaki bango ndai.+