16 Mpe akofuta mpo na lisumu oyo asaleli esika mosantu mpe akobakisa na lifuti yango moko ya bandambo mitano+ na yango, mpe asengeli kopesa yango nganga-nzambe esika moko na mpate-mobali ya likabo ya ngambo mpo nganga-nzambe azipa lisumu+ na ye bongo asengeli kolimbisama.+
7 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye liboso ya Yehova, mpe bongo asengeli kolimbisama na kotalela moko na makambo nyonso oyo akoki kosala, oyo ekomemisa ye ngambo na yango.”