9 “Komɛla vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, ntango bokokɔta na hema ya kokutana, mpo bókufa te. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino,
14 Asengeli kolya eloko moko te oyo euti na nzete ya vinyo, amɛla mpe vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ mpe alya eloko moko te ya mbindo, ata ya ndenge nini.+ Makambo nyonso oyo napesaki ye mitindo, atosa yango.”+
15 mpo akozala moto monene na miso ya Yehova.+ Kasi asengeli komɛla vinyo te mpe masanga ya makasi ata moke te,+ mpe akotonda na elimo santu banda na libumu ya mama na ye;+