Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, Moize alobaki na Arona mpe na Eleazare ná Itamare, bana na ye mosusu ya mibali ete: “Bómeka kobebisa nsuki ya mitó na bino te,+ mpe bosengeli te kopasola bilamba na bino, mpo bókufa te mpe mpo asilikela liyangani mobimba te;+ kasi bandeko na bino ya ndako mobimba ya Yisraele bakolela mpo na koboma na mɔtɔ oyo Yehova abomi.

  • Mitángo 8:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe nakopesa Balevi bázala bato oyo bapesami epai ya Arona ná bana na ye ya mibali kati na bana ya Yisraele,+ mpo na kosala mosala ya bana ya Yisraele na hema ya kokutana+ mpe mpo na kozipa masumu ya bana ya Yisraele, mpo bolɔzi moko te ebima na kati ya bana ya Yisraele+ mpo bana ya Yisraele babɛlɛmi na esika mosantu.”

  • Mitángo 16:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 Nsima na yango, Moize alobaki na Arona ete: “Zwá eloko ya kotya mɔtɔ mpe tyá mɔtɔ oyo euti likoló ya etumbelo na kati na yango+ mpe tyá mpaka ya malasi mpe kende mbangu na liyangani mpe zipá masumu na bango,+ mpamba te Yehova ayoki nkanda.+ Bolɔzi ebandi!”

  • Mitángo 18:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bosengeli kokokisa mokumba na bino na esika mosantu+ mpe mokumba na bino na etumbelo,+ mpo nkanda+ ekitela bana ya Yisraele lisusu te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto