Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 20:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na yango, nalobaki na bino ete:+ “Bino, ɛɛ bino, bokozwa mokili na bango, mpe ngai, ɛɛ ngai, nakopesa bino yango mpo bózwa yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Nazali Yehova Nzambe na bino, ngai moto nakaboli bino na bato ya bikólo.”+

  • Mitángo 13:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe bapesaki ye nsango mpe balobaki ete: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+

  • Mitángo 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Soki Yehova asepeli na biso,+ akokɔtisa mpenza biso na mokili oyo mpe akopesa biso yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

  • Kolimbola Mibeko 26:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na nsima, amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili moko oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

  • Yirimia 11:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 mpo nakokisa ndai oyo nalapelaki bankɔkɔ na bino,+ ya kopesa bango mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ lokola na mokolo ya lelo.’”’”

      Bongo nazongisaki mpe nalobaki ete: “Amen, Ee Yehova.”

  • Yirimia 32:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Na nsima, opesaki bango mokili oyo olapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete okopesa bango,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto