Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yehova ye moko akobundela bino,+ mpe bino bokozala nyɛɛ.”

  • Kobima 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Yehova azali elombe ya etumba.+ Yehova ezali nkombo na ye.+

  • Mitángo 21:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Kobanga ye te,+ mpo nakopesa mpenza ye ná bato na ye nyonso mpe mokili na ye na lobɔkɔ na yo;+ mpe osengeli kosala ye kaka ndenge osalaki Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone.”+

  • Kolimbola Mibeko 1:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Yehova Nzambe na bino ye nde azali kotambola liboso na bino. Akobundela bino+ kaka ndenge asalelaki bino na miso na bino na Ezipito,+

  • Kolimbola Mibeko 20:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo Yehova Nzambe na bino azali kotambola elongo na bino mpo na kobunda na banguna na bino mpo na bino, mpo na kobikisa bino.’+

  • Yosua 10:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Mpe Yosua azwaki na mbala moko bakonzi wana nyonso mpe mokili na bango,+ mpamba te ezalaki Yehova Nzambe ya Yisraele nde azalaki kobundela Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto