Kobima 14:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Bongo Moize alobaki na bato ete: “Bóbanga te.+ Bótɛlɛma ngwi mpe bómona lobiko ya Yehova, oyo akopesa bino lelo.+ Mpo Baezipito oyo bozali komona lelo, bokomona bango lisusu te, ɛɛ, ata moke lisusu te.+ Nzembo 105:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Balakisaki bango bilembo na ye,+Mpe makamwisi na mokili ya Kame.+ Nzembo 135:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Ye oyo abomaki bana ya liboso ya Ezipito,+Moto ná nyama.+ Misala 13:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Nzambe ya bato oyo, Yisraele, aponaki bankɔkɔ na biso, mpe atombolaki bato yango ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito mpe abimisaki bango kuna na lobɔkɔ oyo etombwani.+
13 Bongo Moize alobaki na bato ete: “Bóbanga te.+ Bótɛlɛma ngwi mpe bómona lobiko ya Yehova, oyo akopesa bino lelo.+ Mpo Baezipito oyo bozali komona lelo, bokomona bango lisusu te, ɛɛ, ata moke lisusu te.+
17 Nzambe ya bato oyo, Yisraele, aponaki bankɔkɔ na biso, mpe atombolaki bato yango ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito mpe abimisaki bango kuna na lobɔkɔ oyo etombwani.+