Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe kuna bosengeli komema makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino mpe moko ya bandambo zomi+ na bino mpe likabo ya lobɔkɔ+ na bino mpe makabo na bino ya elako+ mpe makabo na bino ya bolingo+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+

  • Kolimbola Mibeko 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe liboso ya Yehova Nzambe na yo, na esika oyo ye akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna, osengeli kolya moko ya bandambo zomi ya mbuma na yo,+ vinyo na yo ya sika ná mafuta na yo ná bana ya liboso ya etonga na yo ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na yo ya bampate;+ mpo oyekola kobanga Yehova Nzambe na yo ntango nyonso.+

  • Kolimbola Mibeko 16:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe osengeli kopesa Yehova Nzambe na yo mbeka ya elekeli,+ oyo euti na etonga ya bampate mpe na etonga ya bangɔmbɛ,+ na esika oyo Yehova akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+

  • Kolimbola Mibeko 26:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 osengeli kozwa ndambo ya mbuma ya liboso+ ya mbuma nyonso oyo mabele ebimisi, oyo okozwa na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mpe osengeli kotya yango na kitunga mpe kokende na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto