28“Mpe yo, zwá Arona ndeko na yo mpe bana na ye ya mibali elongo na ye na kati ya bana ya Yisraele mpe bɛlɛmisá bango na yo mpo básalela ngai mosala ya nganga-nzambe:+ Arona,+ Nadabe ná Abihu,+ Eleazare ná Itamare,+ bana mibali ya Arona.
10 Mpe okotya Arona ná bana na ye ya mibali, mpe basengeli kokokisa mosala na bango ya bonganga-nzambe;+ mpe mopaya nyonso oyo akobɛlɛma, asengeli kobomama.”+
8 “Na ntango yango, Yehova atyaki libota ya Levi+ pembeni mpo na komema sanduku ya kondimana ya Yehova,+ mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova mpo na kosalela ye+ mpe mpo na kopambola na nkombo na ye kino na mokolo ya lelo.+
12 Mpe moto oyo akosala makambo na lofundo kozanga koyokela nganga-nzambe oyo atɛlɛmi kuna mpo na kosalela Yehova Nzambe na yo to mosambisi,+ moto yango asengeli kokufa;+ mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.+