Kolimbola Mibeko 7:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpe osengeli kosilisa bato ya bikólo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ Miso na yo esengeli te koyokela bango mawa;+ mpe osengeli te kosalela banzambe+ na bango, mpamba te yango ekokómela yo motambo.+ Yosua 11:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Mpo Yehova azalaki kosala boye: kotika mitema na bango ekóma makasi+ mpo báluka bitumba ná Yisraele, bongo ye aboma bango nyonso, mpo amonisela bango boboto te,+ kasi asilisa bango nyɛɛ, ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+
16 Mpe osengeli kosilisa bato ya bikólo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ Miso na yo esengeli te koyokela bango mawa;+ mpe osengeli te kosalela banzambe+ na bango, mpamba te yango ekokómela yo motambo.+
20 Mpo Yehova azalaki kosala boye: kotika mitema na bango ekóma makasi+ mpo báluka bitumba ná Yisraele, bongo ye aboma bango nyonso, mpo amonisela bango boboto te,+ kasi asilisa bango nyɛɛ, ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+