37 Mpe bakobɛtisana libaku lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga, nzokande moto moko te azali kolanda bango, mpe bino bokokoka te kotɛlɛma liboso ya banguna na bino.+
25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okobimela bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe okokóma mpenza eloko moko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele.+