17 Mpe nakotɛmɛla bino mpenza, mpe banguna na bino bakolonga bino;+ mpe baoyo bazali koyina bino bakonyata bino,+ mpe bokokima mpenza wana moto moko te azali kolanda bino.+
14 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele,+ mpe apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi, mpe babandaki kopunza bango;+ mpe atɛkaki bango na lobɔkɔ ya banguna na bango oyo bazalaki zingazinga,+ mpe bakokaki lisusu te kotɛlɛma liboso ya banguna na bango.+
9 Kasi babosanaki Yehova Nzambe+ na bango, yango wana, atɛkaki+ bango na lobɔkɔ ya Sisera,+ mokonzi ya limpinga ya Hazore mpe na lobɔkɔ ya Bafilistia+ mpe na lobɔkɔ ya mokonzi ya Moabe,+ mpe bazalaki se kobunda na bango.