24 Osengeli te kogumbamela banzambe na bango to kobendama mpo na kosalela bango, mpe osengeli te kosala eloko oyo ekokani na misala na bango,+ kasi okobwaka yango mpenza na nse mpe okobuka mpenza makonzí na bango ya losambo.+
3 Mpe bosengeli kokweisa bitumbelo+ na yango mpe kobuka makonzí na yango ya losambo,+ mpe bokozikisa na mɔtɔ banzete na yango ya losambo+ mpe bokokata bikeko oyo eyemami+ ya banzambe na yango, mpe bosengeli kolongola nkombo na yango na esika wana.+