Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 8:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe osengeli kokanisa Yehova Nzambe na yo, mpamba te ye moto apesi yo nguya ya kozwa bomɛngo;+ mpo na kokokisa kondimana na ye oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai, lokola na mokolo ya lelo.+

  • Kolimbola Mibeko 28:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova akofungolela yo ndako na ye malamu ya kobomba biloko, elingi koloba likoló, mpo na kopesa mbula na mokili na yo na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo;+ mpe okodefisa mpenza bikólo mingi, nzokande yo okodefa te.+

  • 2 Ntango 1:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 napesi yo bwanya mpe boyebi;+ nakopesa yo mpe bozwi, bomɛngo ná lokumu na ndenge oyo bakonzi mosusu oyo bazalaki liboso na yo bazalaki na yango te,+ mpe na ndenge oyo ata moko te nsima na yo akozala na yango.”+

  • Yobo 42:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova apambolaki+ nsuka ya Yobo koleka ebandeli na ye,+ bongo akómaki na bampate nkóto zomi na minei (14 000) ná bakamela nkóto motoba (6 000), bangɔmbɛ nkóto mibale (2 000) oyo bakangisi mibalemibale ná bampunda ya basi nkóto moko (1 000).

  • Masese 10:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi,+ mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.+

  • 2 Bakorinti 9:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na makambo nyonso bozali kotonda na bomɛngo mpo na motindo nyonso ya bokabi, oyo ezali kobimisa na nzela na biso matɔndi mpo na Nzambe;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto