Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Bósepela, bino bikólo, elongo na bato na ye,+

      Mpo akozongisa mabe mpo na makila ya basaleli na ye,+

      Mpe akozongisela banguna na ye mabe+

      Mpe akozipa mpenza masumu ya mabele ya bato na ye.”

  • Basambisi 9:57
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 57 Mpe mabe nyonso ya mibali ya Shekeme, Nzambe asalaki ete ezonga na mitó na bango, mpo elakeli mabe+ ya Yotame+ mwana ya Yerubaala+ ezwa bango.+

  • 2 Samwele 1:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na nsima, Davidi alobaki na ye: “Ngambo ya makila na yo ezala na motó na yo moko,+ mpamba te monɔkɔ na yo efundi yo+ ete: ‘Ngai nde nabomaki mbala moko moto oyo Yehova atye mafuta.’”+

  • 1 Bakonzi 2:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe ekosalema mpenza boye: mokolo oyo okobima mpe okokatisa lobwaku ya mokɛli ya Kidrone,+ yebá malamu ete okokufa solo.+ Ngambo ya makila na yo ekozala na motó na yo moko.”+

  • Nzembo 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpasi na ye ekozongela motó na ye moko,+

      Mpe mobulu na ye moko ekokitela motó na ye.+

  • Nzembo 55:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ee Nzambe, yo moko okokitisa bango na libulu ya nse koleka.+

      Bato oyo bazali na ngambo ya makila mpe bato ya bokosi, bakokokisa ata katikati ya mikolo na bango te.+

      Kasi ngai, nakotyela yo motema.+

  • Nzembo 94:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe akozongisela bango makambo na bango oyo eyokisaka mpasi+

      Mpe akokangisa bango monɔkɔ na mpasi na bango moko.+

      Yehova Nzambe na biso akokangisa bango monɔkɔ.+

  • Masese 5:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mabunga ya moto mabe ekokanga ye moko,+ mpe akokangama na bansinga ya lisumu na ye moko.+

  • Masese 28:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Moto oyo amemi mokumba ya ngambo ya makila ya molimo moko boye akokima kino na libulu.+ Bákanga ye te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto