23 Kasi azalaki se koboya kozwa nzela mosusu; bongo Abinere abɛtaki ye nsɔngɛ ya nzete ya likɔnga na ye na libumu,+ mpe likɔnga ebimaki ye na mokɔngɔ; bongo akweaki wana mpe akufaki kaka wana. Mpe esalemaki boye: bato nyonso oyo bakómaki na esika oyo Asahele akweaki mpe akufaki, bazalaki kotɛlɛma.+
27 Ntango Abinere azongaki na Hebrone,+ Yoabe amemaki ye pembeni, na porte mpo na kosolola na ye na malɛmbɛ.+ Kasi, kuna, Yoabe abɛtaki ye na libumu,+ mpe akufaki mpo na makila ya ndeko na ye Asahele.+
10 Nzokande Amasa akebaki te na mopanga oyo ezalaki na lobɔkɔ ya Yoabe; bongo abɛtaki ye+ yango na libumu, mpe misɔpɔ na ye esopanaki na mabele, mpe azalaki kutu na ntina ya kobɛta ye mbala ya mibale te. Mpe akufaki. Bongo Yoabe ná ndeko na ye Abishai balandaki Sheba mwana ya Bikri.