9 “Mpe osengeli kosala lopango+ ya tabernakle. Mpo na ngámbo oyo etali Negebe, epai ya sudi, lopango ezali na barido ya lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá;+ bolai ya mopanzi moko mapeko nkama moko (100).
7 Bongo Salomo asantisaki+ katikati ya lopango oyo ezalaki liboso ya ndako ya Yehova, mpamba te apesaki kuna makabo ya kotumba+ mpe biteni ya mafuta ya bambeka ya boyokani, mpo etumbelo ya motako+ oyo Salomo asalaki ekokaki te likabo ya kotumba mpe likabo ya mbuma+ ná biteni ya mafuta.+