Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 17:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ntango Abrama akómaki na mbula ntuku libwa na libwa (99), Yehova abimelaki Abrama mpe alobaki na ye ete:+ “Ngai nazali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ Tambolá liboso na ngai mpe zalá na mbeba te.+

  • 1 Bakonzi 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo Yehova akokisa liloba na ye oyo alobaki mpo na ngai+ ete: ‘Soki bana+ na yo bakebi na nzela na bango mpe batamboli+ liboso na ngai na solo+ na motema na bango mobimba+ mpe na molimo na bango mobimba, moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele.’+

  • 1 Bakonzi 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na yango, Salomo alobaki ete: “Yo moko omonisi motema boboto monene+ epai ya mosaleli na yo Davidi tata na ngai na ndenge atambolaki liboso na yo na solo mpe na boyengebene+ mpe na bosembo ya motema liboso na yo; mpe okobaki komonisela ye motema boboto monene oyo, bongo opesaki ye mwana moko afanda na kiti na ye ya bokonzi ndenge ezali lelo.+

  • Luka 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bango nyonso mibale bazalaki bayengebene+ na miso ya Nzambe mpo bazalaki kotambola na mbeba te+ na boyokani na mitindo+ mpe mibeko+ nyonso ya Yehova.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto