Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Moto nyonso oyo asopi makila ya moto, makila na ye moko ekosopama na moto,+ mpo Nzambe asalaki moto na elilingi na ye.

  • Mitángo 35:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 “‘Mpe bosengeli te kobebisa mokili epai bozali; mpamba te ezali makila nde ebebisaka mokili,+ mpe kozipama ya masumu ya mokili ekozala te mpo na makila oyo esopami likoló na yango, longola kaka na makila ya moto oyo asopi yango.+

  • 2 Bakonzi 24:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpe lisusu mpo na makila ya moto oyo azali na likambo te+ oyo ye asopaki, bongo atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te, mpe Yehova andimaki kolimbisa te.+

  • Masese 6:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+

  • Yisaya 59:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo mabɔkɔ na bino ekómi mbindo na makila+ mpe misapi na bino ekómi mbindo na libunga. Mbɛbu na bino moko elobi lokuta.+ Lolemo na bino moko ezalaki se koloba na nse nse likambo ya kozanga boyengebene.+

  • Yirimia 2:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Lisusu, bamoni na bilamba na yo bilembo ya makila ya milimo+ ya babola oyo bazali na likambo te.+ Nakuti yango te na esika makambo yango esalemaki, kasi nde na bilamba na yo nyonso.+

  • Matai 23:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 mpe bolobaka ete: ‘Soki tózalaka na ntango ya bankɔkɔ na biso, mbɛlɛ tosanganaki na bango te na ngambo ya makila ya basakoli.’+

  • Baebre 11:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Babambaki bango mabanga,+ bamekamaki,+ bakatamaki biteni mibale na sii, babomamaki+ na mopanga, bazalaki koyengayenga balati mposo ya bampate,+ mposo ya bantaba, bazalaki kokelela,+ kozwa bolɔzi,+ konyokwama;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto