Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 35:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 “‘Mpe bosengeli te kobebisa mokili epai bozali; mpamba te ezali makila nde ebebisaka mokili,+ mpe kozipama ya masumu ya mokili ekozala te mpo na makila oyo esopami likoló na yango, longola kaka na makila ya moto oyo asopi yango.+

  • Kolimbola Mibeko 19:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpo makila ya moto oyo azali na likambo te+ esopama te na kati ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, mpe ngambo ya makila ata moko te ekwela yo.+

  • 2 Bakonzi 21:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe longola lisumu oyo atindaki Yuda básala na ndenge bazalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ Manase asopaki lisusu makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te,+ kino atondisaki Yerusaleme banda nsuka tii nsuka.

  • Nzembo 106:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Bongo bazalaki se kosopa makila ya bato oyo bazali na likambo te,+

      Makila ya bana na bango ya mibali mpe ya bana na bango ya basi,

      Oyo bazalaki kokabela bikeko ya Kanana mbeka;+

      Mpe mokili ekómaki mbindo mpo basopaki makila.+

  • Yirimia 2:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Lisusu, bamoni na bilamba na yo bilembo ya makila ya milimo+ ya babola oyo bazali na likambo te.+ Nakuti yango te na esika makambo yango esalemaki, kasi nde na bilamba na yo nyonso.+

  • Yirimia 19:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo batiki ngai+ mpe basali ete esika oyo eyebana lisusu te+ mpe na esika oyo, babimisi milinga ya mbeka epai ya banzambe mosusu oyo bango bayebaki te,+ bango ná bankɔkɔ na bango mpe bakonzi ya Yuda; mpe batondisi esika oyo na makila ya bato oyo bazali na likambo te.+

  • Yirimia 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 ‘Ya solo mpenza, miso na yo mpe motema na yo etyami na eloko mosusu te, kaka na litomba na yo ya mabe,+ mpe na makila ya moto oyo azali na likambo te mpo osopa yango,+ mpe na kobuba mpe na kobɔtɔla mpo omipesa na makambo yango.’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto