31 Mpe esalemaki boye: lokola nde kotambola na masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate ezali likambo moke+ mpenza na miso na ye, azwaki lisusu Yezabele,+ mwana ya Etebaala mokonzi ya Basidone,+ azala mwasi na ye+ mpe abandaki kokende kosalela Baala+ mpe kogumbamela ye.
2 Na yango, Yezabele atindelaki Eliya momemi-nsango moko, na maloba oyo: “Tiká banzambe básala bongo+ mpe bábakisa yango,+ soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!”
7 Na nsima, mwasi na ye Yezabele alobaki na ye boye: “Yo te moto ozali koyangela Yisraele sikoyo?+ Tɛlɛmá, lyá limpa mpe tiká motema na yo ezala na esengo. Ngai moko nakopesa yo elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele.”+