Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 26:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, Davidi ayanolaki mpe alobaki boye na Ahimeleke Mohiti,+ mpe na Abishai+ mwana ya Zeruya,+ ndeko ya Yoabe: “Nani akokita na ngai na kaa epai ya Saulo?” Na yango, Abishai alobaki ete: “Ngai nakokita elongo na yo.”+

  • 2 Samwele 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Nzokande bana misato ya Zeruya+ bazalaki wana: Yoabe,+ Abishai+ ná Asahele;+ mpe Asahele azalaki makolo mbangu lokola mboloko+ oyo ezalaka na esobe.

  • 2 Samwele 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Lisusu, Davidi atindaki moko ya ndambo misato+ ya bato na mabɔkɔ ya Yoabe+ mpe moko ya ndambo misato na mabɔkɔ ya Abishai+ mwana ya Zeruya, ndeko ya Yoabe,+ mpe moko ya ndambo misato na mabɔkɔ ya Itai,+ moto ya Gate. Bongo mokonzi alobaki na bato yango ete: “Ngai mpe nakobima mpenza elongo na bino.”

  • 2 Samwele 23:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe Abishai+ ndeko ya Yoabe mwana ya Zeruya+ azalaki mokonzi ya bato yango ntuku misato (30), mpe azalaki kobwakela bato nkama misato (300) likɔnga na ye mpe babomami, mpe azalaki na lokumu lokola baoyo wana misato.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto