8 Mpe Yehova nde azali kotambola liboso na yo. Ye moko akokoba kozala elongo na yo.+ Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te.”+
25 Mpe Yosua alobaki na bango ete: “Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te.+ Bózala na mpiko mpe bózala na makasi, mpo boye nde Yehova akosala banguna na bino nyonso oyo bozali kobunda na bango.”+