12 “Wana okozwa motángo mobimba ya bana ya Yisraele na ntango ya kotánga bango,+ basengeli moto na moto kopesa lisiko mpo na molimo na ye epai ya Yehova na ntango ya kotánga bango,+ mpo bolɔzi ekwela bango te na ntango ya kotánga bango.+
13 Talá eloko oyo baoyo nyonso bakoleka na molɔngɔ ya baoyo batángami bakopesa: shekele moko kabolá na mibale na kolanda shekele ya esika mosantu.+ Gera ntuku mibale (20) ekokani na shekele moko. Shekele moko kabolá na mibale ezali likabo ya kopesa Yehova.+
16 Mpe osengeli kozwa epai ya bana ya Yisraele mbongo ya palata mpo na kozipa masumu mpe kopesa yango mpo na mosala ya hema ya kokutana,+ mpo ezala mpenza ekaniseli liboso ya Yehova mpo na bana ya Yisraele, mpo na kozipa masumu ya milimo na bino.”