2 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó+ ya likabo na ye, mpe yango esengeli kobomama na monɔkɔ ya hema ya kokutana; mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli komwangisa makila zingazinga, likoló ya etumbelo.
4 Mpe asengeli komema ngɔmbɛ-mobali yango na monɔkɔ ya hema ya kokutana+ liboso ya Yehova mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya ngɔmbɛ-mobali yango,+ mpe asengeli koboma ngɔmbɛ-mobali yango liboso ya Yehova.
15 Mpe Moize abomaki+ yango mpe azwaki makila+ na mosapi na ye mpe atyaki yango likoló ya maseke ya etumbelo zingazinga mpe apɛtolaki etumbelo na lisumu, kasi ndambo ya makila oyo etikalaki, asopaki yango na nse ya etumbelo, mpo asantisa yango mpo na kozipa masumu+ na yango.