5 Mpe alobaki na bango boye: “Bóyoka ngai, bino Balevi. Sikoyo, bómisantisa+ mpe bósantisa ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, mpe bóbimisa eloko ya mbindo na esika mosantu.+
20 Lokola etuluku mobimba ya banganga-nzambe ná Balevi bamipɛtolaki,+ bango nyonso bazalaki pɛto, bongo babomaki nyama ya elekeli+ mpo na bato nyonso oyo kala bamemamaki na mboka mopaya mpe mpo na bandeko na bango banganga-nzambe mpe mpo na bango moko.