Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 12:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Kasi soki botosi mongongo ya Yehova+ te, soki botombokeli mpenza etinda ya Yehova,+ ya solo, lobɔkɔ ya Yehova ekotɛmɛla bino mpe batata na bino.+

  • 1 Samwele 15:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpo botomboki+ ezali ndenge moko na lisumu ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ mpe kokende liboso na lofundo ezali ndenge moko na kosala makambo ya maji mpe kosambela bikeko.*+ Lokola oboyi liloba ya Yehova,+ ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”+

  • Yisaya 1:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Kasi soki boboyi+ mpe botomboki mpenza, mopanga ekolya bino; mpo monɔkɔ ya Yehova elobi bongo.”+

  • Yisaya 63:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi bango batombokaki+ mpe bayokisaki elimo santu na ye mpasi.+ Bongo akómaki monguna+ na bango; ye moko abundaki na bango.+

  • Ezekiele 20:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “‘“Mpe bana babandaki kotombokela ngai.+ Batambolaki na mibeko na ngai te, mpe batosaki te bikateli na ngai ya lisambisi, basalelaki yango te, oyo, soki moto asaleli yango, akotikala mpe na bomoi na nzela na yango.+ Bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba.+ Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai, mpo nakosilisela bango nkanda na ngai na esobe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto