6 Mpo ezali Nzambe nde moto alobaki ete: “Pole engɛnga uta na molili,”+ mpe angɛngi na mitema na biso mpo na kongɛngisa+ yango na boyebi+ ya nkembo ya Nzambe na nzela ya elongi ya Kristo.+
17 Likabo nyonso ya malamu+ mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló,+ mpo eutaka na Tata ya miinda ya likoló,+ mpe ye abongwanaka te lokola elili.+
9 Kasi bino bozali “libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu,+ bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza,+ mpo bósakola bizaleli malamu”+ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.+