Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 97:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Mpo yo, Ee Yehova, ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba;+

      Omati na esika ya likoló mingi mpenza koleka banzambe mosusu.+

  • Nzembo 48:maloba ya ebandeli ya loyembo-14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Loyembo. Mondule ya bana ya Kora.+

      48 Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi+

      Na engumba ya Nzambe na biso,+ na ngomba na ye mosantu.+

       2 Ezali kitoko mpe etombwaná, kosepela ya mabele mobimba,+

      Yango nde Ngomba Siona na bandelo ya mosika mpenza ya nɔrdi,+

      Sité ya Mokonzi Monene.+

       3 Na bandako milai na yango ya kofanda Nzambe ye moko ayebani ete azali esika ya kobombana oyo etombwaná.+

       4 Mpo talá! bakonzi bakutani ndenge bayokanaki,+

      Baleki elongo.+

       5 Bango moko bamonaki; mpe bakamwaki.

      Babulunganaki, bakimaki na nsɔmɔ.+

       6 Kolɛnga ekangaki bango kuna,+

      Bampasi lokola oyo ya mwasi oyo azali kobota.+

       7 Na mopɛpɛ ya ɛsti obebisaki bamasuwa ya Tarasisi.+

       8 Kaka ndenge toyoki, ndenge mpe tomoni+

      Na engumba ya Yehova ya mampinga, na engumba ya Nzambe na biso.+

      Nzambe ye moko akotɛlɛmisa yango makasi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Sela.

       9 Ee Nzambe, tokanisi malamumalamu, mpo na motema boboto na yo+

      Na katikati ya tempelo na yo.+

      10 Ee Nzambe, ndenge nkombo na yo ezali,+ lisanzoli na yo mpe ezali bongo

      Tii na bandelo ya mabele.

      Lobɔkɔ na yo ya mobali etondi na boyengebene.+

      11 Ngomba Siona+ esepela,

      Basité oyo esimbami na Yuda ezala na esengo,+ mpo na bikateli na yo ya lisambisi.+

      12 Bótambola zingazinga ya Siona mpe bóbaluka zingazinga na yango,+

      Bótánga bandako na yango ya milai.+

      13 Bótya mitema na bino na mwa ngomba na yango oyo basalá mpo na libateli.+

      Bótala malamumalamu bandako milai na yango ya kofanda,

      Mpo bóyebisa yango na mabota oyo ekoya na nsima.+

      14 Mpo Nzambe oyo azali Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

      Ye moko akokamba biso tii tokokufa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto