-
Nzembo 49:maloba ya ebandeli ya loyembo-20Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.
3 Monɔkɔ na ngai ekoloba makambo ya bwanya,+
Mpe komanyola ya motema na ngai ekozala na makambo ya mayele.+
5 Mpo na nini nabanga na mikolo ya mabe,+
Ntango libunga ya baoyo balingi kokweisa ngai ezali kozinga ngai?+
6 Baoyo bazali kotya motema na biloko na bango ya kobikela,+
Mpe baoyo bazali kaka komikumisa mpo na ebele ya bomɛngo na bango,+
8 (Mpe ntalo ya lisiko ya molimo na bango ezali motuya moko monene mpenza+
Yango wana ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te)
9 Mpo azala lisusu na bomoi seko mpe amona libulu te.+
10 Mpo amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka,+
Zoba ná moto oyo azangi mayele bango nyonso bakufaka,+
Mpe basengeli kotikela bato mosusu biloko na bango ya kobikela.+
11 Mposa ya motema na bango ezali ete bandako na bango ezala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+
Batabernakle na bango libota na libota.+
Bapesi mabele na bango bankombo na bango.+
12 Nzokande moto ya mabele, ata azali na lokumu, akoki te kofanda libela;+
Azali mpenza lokola banyama oyo ebomami.+
13 Yango nde nzela ya baoyo bazali na bozoba,+
Mpe ya baoyo bazali koya nsima na bango, baoyo bazali kosepela na maloba na bango ya mangungu. Sela.
14 Lokola bampate, babongisami mpo na Nkunda;*+
Liwa ekokamba bango;+
Mpe bato ya makambo alima bakozala na bokonzi likoló na bango na ntɔngɔ,+
Mpe nzoto na bango esengeli konzuluka;+
Mokomoko azali kokende na esika ya kofanda ya lokumu te, kasi nde na Nkunda.*+
15 Nzokande, Nzambe ye moko akosikola molimo na ngai na lobɔkɔ ya Nkunda,*+
Mpo ye akoyamba ngai. Sela.
18 Mpo bomoi na ye mobimba azalaki kaka kopambola molimo na ye;+
(Mpe bato bakokumisa yo mpo ozali komisalela malamu)+
-