Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 9:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe yo ozali moyengebene+ na makambo nyonso oyo ekweli biso, mpamba te osalaki makambo na bosembo,+ kasi biso nde tosalaki mabe.+

  • Nzembo 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na yo,+

      Mpe na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.+

      Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.+

  • Nzembo 35:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe lolemo na ngai elobela boyengebene na yo na mongongo ya nse,+

      Lisanzoli na yo mokolo mobimba.+

  • Nzembo 59:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi ngai nakoyembela makasi na yo,+

      Mpe na ntɔngɔ nakoyebisa makambo etali motema boboto na yo na esengo.+

      Mpo omonisi ete ozali esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná+

      Mpe esika oyo nakoki kokima na mokolo ya mpasi na ngai.+

  • Danyele 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ee Yehova, boyengebene ezali ya yo, kasi biso, bilongi na biso nde etondi na nsɔni lokola na mokolo ya lelo,+ bato ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bato nyonso ya Yisraele, baoyo bazali pene mpe baoyo bazali mosika na mikili nyonso esika opanzá bango mpo basalelaki yo makambo na bosembo te.+

  • Baroma 10:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpo lokola bayebi boyengebene ya Nzambe+ te kasi bazali koluka kotya oyo ya bango moko,+ batosaki boyengebene ya Nzambe te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto